2 Corinthians 5

1Toyebi malamu ete, soki nzoto na biso, evandelo na biso na mokili oyo, ezali lokola ndako ya kapo, ekufi ; tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, evandelo ya seko kuna na likolo, ndako oyo etongama na maboko ya bato te. 2Pamba te, kati na ndako ya kapo oyo, tozali komona pasi mpo ete tozali kozela, na posa makasi penza, evandelo na biso ya Likolo, 3soki kaka tolati yango, kasi totikali bolumbu te. 4Pamba te, wana tozali nanu kati na ndako ya kapo oyo, tozali komona pasi mpe konyokwama ; mpo ete tolingi te kolongola, kasi tolingi nde kolata evandelo na biso ya Likolo, mpo ete bomoi emela oyo ekufaka. 5Ezali Ye moko Nzambe nde abongisa biso mpo na kozala bongo, mpe apesa biso Molimo na Ye lokola ndanga ya bolamu oyo ekoya.

6Yango wana, tozalaka na elikya tango nyonso, wana toyebi ete tango nyonso tozali na nzoto oyo, tozali mpe mosika na Nkolo. 7Pamba te, totambolaka na kondima, kasi na miso te. 8Nalobi ete tozali na elikya monene, mpe tozali kosepela kotika nzoto oyo mpo na kokende kovanda elongo na Nkolo. 9Yango wana, ezala soki tozali kowumela na nzoto oyo to totiki yango, tolukaka kaka eloko moko : kosepelisa Nkolo. 10Pamba te, biso nyonso tokotelema liboso ya esambiselo ya Klisto mpo na kosamba, mpo ete moto na moto akoka kozwa lifuti kolanda misala na ye, ya malamu to ya mabe, oyo asalaki wana azalaki nanu na nzoto na ye.

Mosala ya kozongisa boyokani

11Wana toyebi malamu soki kotosa Nkolo elakisi nini, tosalaka nyonso ete bato bandima. Lokola Nzambe ayebi biso malamu, nazali na elikya ete bino mpe boyebi biso malamu kati na mitema na bino. 12Tozali lisusu komilobela te epai na bino, kasi tozali kopesa bino nzela ya komipesa lokumu mpo na biso, mpo ete bokoka kozongisa eyano na baoyo bamipesaka lokumu na makambo oyo emonanaka, kasi na oyo ya motema te. 13Soki tozali komonana lokola bazoba, ezali kaka mpo na Nzambe, mpe soki tozali komonana lokola bato ya mayele, ezali nde mpo na bino. 14Pamba te, bolingo ya Klisto ekanga biso, mpo ete tozali kondima ete moto moko akufa mpo na bato nyonso, yango wana bato nyonso bakufa kati na ye. 15Akufaki mpo na bato nyonso, mpo ete baoyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi te mpo na bango moko, kasi mpo na moto oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango.

16Yango wana, wuta lelo, tokotala lisusu ata moto moko te na bomoto. Mpe, ata soki tozalaki kotala Klisto na bomoto, kasi sikʼoyo tozali lisusu kotala Ye te na bomoto. 17Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika : makambo ya kala eleki mpe tala makambo ya sika esili koya ! 18Nyonso wana ezali mosala ya Nzambe, Ye oyo azongisaki boyokani kati na biso na Ye na nzela ya Klisto, mpe apesaki biso lotomo ya kozongisa boyokani. 19Pamba te, Nzambe azalaki kati na Klisto, tango azalaki kozongisa boyokani kati na Ye na bato, atalaki masumu na bango te mpe atiaki kati na biso maloba ya kozongisa boyokani. 20Yango wana, biso tozali bantoma mpo na Klisto, mpe na nzela na biso, Nzambe azali kolendisa bato. Tobondeli bino na Kombo ya Klisto : Bozongisa boyokani na Nzambe ! 21Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso atako azalaki na lisumu te, mpo ete kati na Ye, biso tokoma bosembo ya Nzambe.
Copyright information for LinMNB